English request for "Faux pas"
Help translate from Lingala to English song Faux pas by Mbilia Bel
Requested by:
Sibochadomincjohn
on 3 Oct 2025 - 18:57
Original lyrics
Lingala
Translation
English
Faux pas
Suka se kuna epayi ozali
Nayoki sango okotunatuna epayi nafandaka
Batindaka yo solo mbanda
Bosana lelo mobali na ngai
Naboya bitumba
nasomba dignité na nzoto e
Nabandi oyoka sango na yo mingi marna
Ozali chargée ya bamission ya ma rival
Zonga na sima epai owuti
Mingi bayeba matata na ngai.
Nakomi koyoka sango na yo mwa mingi
Bipayi biso nakoleka bakotuna ngai
Yoka ozali toma ya mbanda a
Boni yo sele sele na mobali
Ya ngai motema nzoto ya M'Bilia a
Yanga lolendo ewuti na fami
Nakobanga nani e mama a a
Mobali nayebi azali se wanga
Mbanda moko ameka koloba te
Ozali envoyée ya mbanda ngai
Keba na yo
Okomi kopesa commandement
Ngai na rêver
Mbanda asali faux pas na la vie
Moto atindaka akoma nde mbanda
Mbanda asali faux pas na la vie
Mpondu ya mobesu na ndako a taba.
Okomi kosalela mbanda bafausse mission
Nabandi koyoka sango yango mwa mingi
Moninga na yo azali se moliki nzela
Bayima ngai makasi ya kobunda
Kasi monoko na ngai mbeli ya koswana, marna o
Sika naloba nini, ngai nkolo ya moto
Oyo akomi kongala kuna ye nde nani?
Nabebi nzoto
Nasambwe nzoto, o ngai M'Bilia e
Mabala oyo tokokota nzoka nde ya makambo e
Olamuka na ntongo, oyoki bazwela yo
mbanda e
Okomi zoba
osili mayele, o yo moto e.
Bombanda ya ntango na biso ekomi lisano
mama
Bombanda ya bonkoko ezalaki likambo ya
bosomi I
Tokomi wapi?
Tokeyi wapi o, ngai M'Bilia e?
Bombanda ezalaki likambo ya mpasi na
motema
Owuti epai mosusu
oye kotungisa ngai na libala na ngai
Nateki molimo
Nakoluka nde nasukisa yo, ngai moto
Mbanda azali se mbanda kicamarade ya nini
Eboyi basala yo kolinga kosala moninga te
Ezali mpasi e
Ekoswa na motema o ngai moto e
submitted on 9 Jun 2024 - 09:10













